Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba historiens balakisi France mosapi na mpo na génocide ya Rwanda


Président Emmanuel Macron (g) asimbi rapport ya misala ya France na génocide ya Rwanda, na mokambi ya commission ya ba historiens Vincent Dulert, na Palais ya Elisée, Paris, France, 26 mars 2021.
Président Emmanuel Macron (g) asimbi rapport ya misala ya France na génocide ya Rwanda, na mokambi ya commission ya ba historiens Vincent Dulert, na Palais ya Elisée, Paris, France, 26 mars 2021.

Rapport moko ya ba historiens 14 ya France etalisi ete ekolo eye mpe bakonzi ba yango bakala bazali na "mokumba monene mpe ya kopesa mpasi" na génocide (bobomi monene) ba Rwanda na 1994.

Maye misala ya ba historiens baye bamoni nsima na boluki luki, mapesami na moboko ya président ya France Emmanuel Macron vendredi na mokambi ya commission yango, Vincent Duclert.

Rapport yango elakisi mbeba ya France na Rwanda kati na 1990 na 1994.

Elobi France ezalaki "miso mikufa" (to lolanda “aveugle”) liboso lya bokonzi ya Rwanda boye bozalaki kokabola bato na kolanda kabila to loposo na bango ("régime raciste"). Elobi mpe bokonzi yango, ya président hutu Juvénal Habyarimana ezalaki ya "kaniaka mpe ya mobulu".

Ba historiens bango batangaki nkoto na nkoto ya mikanda mibombana mpo na génocide eye.

Mpo na ba historiens baye, François Mitterand mokonzi ya France na ntango ya bobomi yango, azalaki na boyokani makasi, kati na ye mpe na mokonzi ya Rwanda ya ntango wana, Juvénal Habyarimana.

Na nzela ya bondeko bwango nde minduki, bibundeli mpe masasi matindamaki mingi mpenza na bokonzi wana ya Rwanda.

France elamukaki mpenza nsima na ntango, na eleko ya misala mya Turquoise, mampinga ma France, masalaki kati na juin na août 1994, miye mpesaki nzela na kobikisa bato baike.

Mpo na commission eye, motango ya mingi koleka ya ba Tutsi basilaki kokufa yambo, na ba mposo ya yambo ya bobomi bo ye.

Président Macron nde atiaki na esika Commission yango na 2019.

Commission elakisi mpenza te na misala ndenge France emikotisaki na bobomi boye.

Wuto mibu mileki, bakonzi ba France balukaka kozongisa bondeko malamu na mokonzi ya Rwanda Paul Kagame, mo tutsi, oyo akotaki na bokonzi nsima na génocide.

M. Kagame afundama mpe na ba hutu na kozala motindi ya génocide mpe na koboma na mokonzi ya kala M. Habyrimana na kobetaka mpepo na ye missile.

XS
SM
MD
LG