Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katumbi na Kinshasa vendredi mpo na kokutana na Tshisekedi


Moïse Katumbi (C) na bokutani na motindami ya Etats-Unis na etuka ya Grands lacs na kati kati ya Afrika, Tibor Nagy (2e D) na Washington, Etats-Unis, 16 janvier 2020. (Twittor/Tibor Nagy)
Moïse Katumbi (C) na bokutani na motindami ya Etats-Unis na etuka ya Grands lacs na kati kati ya Afrika, Tibor Nagy (2e D) na Washington, Etats-Unis, 16 janvier 2020. (Twittor/Tibor Nagy)

Moïse Katumbi, mokonzi ya Ensemble pour la république mpe moko na bakambi ba Lamuka, akokoma Kinshasa vendredi 6 novembre na ntina ya kosolola na président Tshisekedi mpo na matata mazali na mboka, elobi bayi lingomba liye.

"Likita lya bato na bwanya ya Ensemble pour la république ezali kosakola bokomi bwa mokonzi Moïse Katumbi Chapwe na Kinshasa vendredi ekoya, 6 novembre. Lisengi na bana ya Kinshasa komibongisa mpe kokende koyamba ye ebele na libanda lya mpepo ya N’Djili," ekomi bato ba bwanya motoba ya Ensemble baye batie manzaka na liyebisi.

Molobeli ya M. Katumbi, Francis Kalombo, alobi ete bokutani na Félix Tshisekedi bokozala o'mokolo mwa mposo.

Bayi Ensemble bayebisi ete M. Katumbi ayambi nkasa ya bobengisami mpo na boyoki bato président Félix Tshisekedi abandi kosala lundi na Kinshasa.

"Andimi koyanola malamu na mbyangana ya tata mokonzi na ntina ya komema ya ye likabo na boluki biyano bya boyokani na makambo makasi matelemeli bana ya mboka mikolo miye, mpo na lobi lolamu," ebakisi bayi Ensemble.

Mpo na bango esengeli kotia yambo mpasi bana mboka bazali komona. Mingi mpenza bozangi bokengi na monyele mwa mboka.

XS
SM
MD
LG