Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lingomba Etat islamique endimi esalaki ba attaques ya bombe artisanale na Beni


Basoda ba MONUSCO libanda lya ndako ya Nzambe epayi wapi ba bombes artisanales ebetamaki na Beni, Ituri, 27 juin 2021.
Basoda ba MONUSCO libanda lya ndako ya Nzambe epayi wapi ba bombes artisanales ebetamaki na Beni, Ituri, 27 juin 2021.

Lingomba Etat Islamique to DAESH endimi ete yango nde etiaki mpe ebetaki ba bombes artisanales na engumba Beni, na Nord-Kivu, suka ya mposo moloki.

Liyebisi lya DAESH libimisami na SITE misala mya bobanzi sango ya lingomba liye na Amerika.

Etat islamique elobi ezali attaque na yango ya yambo na bisika bya losambo ya ba klistu.

Elobi ndeko na bango Abu Khadijah abetaki mpe bombe na esika ya koteka masanga makasi.

Abu Khadijah akufaki mpe bato basusu bazokaki. Mapinga ma Ekolo Congo démocratique malobaki nde ba ADF nde basalaki yango.

XS
SM
MD
LG