Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Beni : ONU epameli liwa lya journaliste moko mpe esengi enketi na lombango mpo na liwa lya Imam Ali Amini


Ba soda ya mampinga ma RDC (FARDC) na mboka Manzalaho, pene na Beni, Nord-Kivu, RDC, 18 février 2020.
Ba soda ya mampinga ma RDC (FARDC) na mboka Manzalaho, pene na Beni, Nord-Kivu, RDC, 18 février 2020.

BCNUDH (Bureau conjoint ya ONU mpo na makoki ma bomoto) esengi mikano ya bokengi mpo na bapanzi sango mpe babundi ba mamkoki bamoto nsima na bobomi dimanche ya journaliste moko na Beni. Esengi mpe boluluki na lombango mposo moko nsima na liwa lya Imam Alia Amini.

"BCNUDH epameli makasi bobomi ya Barthemy Kubunabandu Changamuka, molakisi ya maye matali bilei mpe mopanzi sango na radio communautaire ya Kisthanga," ekomi BCNUDH.

Mopanzi sango Kubanabandu abomamaki na lopango na ye nsima na kosilisa linaka ya radio.

Bato babale na minduki bakotaki na loponga ya mopanzi sango Kubanabandu mpe babetaki ye masasi mwambe, kolanda litatoli ya molongani ya mowei na ONG JED, Journaliste en danger.

GED esengi mpe enketi mpe etumbu mpo na bato basali yango.

Bobomi yango bosalami ntango “état de siège" ebandaki wuto le 6 mai.

BCNUDH esengi na bakonzi ba RDC kosala na lombango bolukiluki mpo na liwa lya Imam Cheikh Ali Amini o’libandela lya mposo kati na losambo azalaki kokamba.

Cheikh Ali Amini abetamaki masasi na bato bayebani te.

XS
SM
MD
LG