Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba ADF bafundami na koboma lisusu bato 25 na Beni


Ba soda ba mampinga ma RDC na bitumba na basimba minduki na Beni, Nord-Kivu, 7 décembre 2018.
Ba soda ba mampinga ma RDC na bitumba na basimba minduki na Beni, Nord-Kivu, 7 décembre 2018.

Ba ADF bafundami na koboma bato 25 na Beu Manyama-Moliso na Beni butu bwa mardi kokoma mercredi, kolanda mokambi ya etuka ya Nord-Kivu, Carly Nzanzu Kasivita.

"Tozali kolela. Ba ADF basalaki bitumba mpe babomaki koleka bato 20, elobi mokambi ya lisanga moko ya bavandi na Beni," Noella Katongerwaki Muliwavyo.

"Ntango na yokaki bokangi mpe boleli na bato, na kimaki na nzamba, Nakobaki kokima butu mobimba kino Mamobe, mboka ya pembeni. Basali bilanga banso batikalaki babomamaki," etatoli Janvier Maneno, moko na bavanda ya Beu Manyama-Moliso.

Ba ADF, bazali batomboki bawuta Uganda na mibu 1990 mpe bakoba koboma mingi na monyele ya RDC.

Ba ADF bazali ba musulumane mpe basakolaki mibu mileki été bakota kati na lingomba to groupe Etat Islamique (DAESH to ISIS).

Mposo mibale mileki, Amerika esakolaki ete ba ADF bazali badongolo meso mpe USA elobaki ekokata bango nzela inso ya kozwa misolo.

XS
SM
MD
LG