Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC, Centrefraique, Mauritanie na Yémen bazalaki na likita ya coalition ya bitumba na Daesh na Rome


Christophe Lutundula (D), ministre ya mambi ya Bapaya ya RDC na mokokani wa ye ya Etats-Unis Secrétaire d'Etat Antony Blinken, na bokutani lisanga lya kobundisa DAESH, na Rome, Italie, 29 juin 2021. (Twitter/Atoki Ileka)
Christophe Lutundula (D), ministre ya mambi ya Bapaya ya RDC na mokokani wa ye ya Etats-Unis Secrétaire d'Etat Antony Blinken, na bokutani lisanga lya kobundisa DAESH, na Rome, Italie, 29 juin 2021. (Twitter/Atoki Ileka)

Ministre ya mambi ya ba Bapaya ya RDC na baye ya bikolo biike bya molongo basangani na limpinga ya kobundisa lingomba lya Etat islamique to DAESH, na likita lisamaki lundi na Rome na bokambi ya ministre ya mambi ya Bapaya ya Italie na oyo ya Etats-Unis.

Ekolo Congo démocratique, Centrafrique, Mauritanie na Yémen bazalaki kati na bikolo biyambamaki lobi na Rome na Coalition to boyokani mpo na bitumba na lingomba ya ba dongolomeso Etat islamique to DAESH.

Ezalaki na bokutani ya ba ministres ya mambi ya Bapaya ya Coalition eye na Rome.

Ministre ya Mambi ya Bapaya ya Italie Luigi Di Maio oyo abengisaki likita lyango alobi alingaki kotia na esika Task force to limpinga lya molongo mpo na kotelema likama ya DAESH.

Luigi Di Maio asengi bikolo bya Afrika kosangana na bitumba biye.

Burkina Faso, Ghana mpe Mozambique babengisamaki mpo na yango na likita lyango.

Na ngambo na ye, Secrétaire d’état Antony ya Etats-Unis Blinken alobi azali kopesa maboko na makanisi maye.

Ba ministres babale balakisi mpiko na bango na kokokba bitumba na DAESH mpe na kosala ete lingomba liye lya badongolomeso. Basengi Coalition to lisanga lya bikolo biye lisala mosala na bomoko mpe boyokani.

Batomboki ya ba ADF baye babomaka wuta mibu mingi na monyele ya RDC bakota na DAESH.

XS
SM
MD
LG