Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC ekozala na likita lya molongo mpo na kotelemela Groupe "état islamique" na Rome


Ministre ya Italie ya Mambi ya BApaya Luigi Di Maio (G), sectrétaire d'Etat ya Amrika Antony Blinken (C) na ministre ya mambi ya Bapaya ya Truquie Mevlut Cavusogi, na Bruxelles, Belgique, 14 avril 2021.
Ministre ya Italie ya Mambi ya BApaya Luigi Di Maio (G), sectrétaire d'Etat ya Amrika Antony Blinken (C) na ministre ya mambi ya Bapaya ya Truquie Mevlut Cavusogi, na Bruxelles, Belgique, 14 avril 2021.

Ekolo Congo démocratique ekozala na bokutani bwa "Coalition mondiale contre Daesh" to lisanga ya molongo ya kotelemela Groupe "état islamique", le 28 juin na Rome, na Italie.

Bokutani bwango bokosangisa ba ministres ya mambi ya Bapaya ya bikolo 183.

Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis (ministre ya mambi ya Bapaya) Antony Blinken nde akotambwisi misala myango elongo na mokokani wa ye ya Iteli Luigi Di Maio.

Ba ministres ba bikolo mpe mabongisi baye bakozala kuna bakotala soki makasi na bitumba na groupe "état islamiuqe" makomi wapi.

Ekolo Congo démocratique ekota lisanga liye wuto na bosenga ya président Félix Tshisekedi nsima bocandisami na ye na bokonzi.

M. Tshisekedi alobaki na mobembo mwa ye ya yambo mpe ya mibale na Washington ete bitumba ekolo ezali kosala ezali na badongolomeso ya ADF baye bokota na groupe "état islamique:,.

Bikoli mingi misusu bya Afrika mpe bazali na kati.

Kasi mposo moleki ba experts ya Nations unies balobaki na rapport na bango ete ba te bilembo bilakisi solo bokoti ya ba ADF na groupe "état islamique" ata bango balobaka bazali na kati mpe ata groupe "état islamique" ebimisi mbala mibale to misato mayebisi nsima na bobomi ba ADF basala na monyele ya Ekolo Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG