Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bazuzi bakoti kinzonzi nsima na Kamerhe, Jamal mpe Muhima koloba bazali ba innoncents


Vital Kamerhe na bosambisami na ye na boloko ya Makala CPRK na Kinshasa, 11 mai 2020. (Capture d'écran)
Vital Kamerhe na bosambisami na ye na boloko ya Makala CPRK na Kinshasa, 11 mai 2020. (Capture d'écran)

Zuzi mokambi Pierrot Makenge Mvita asakoli ete tribunal ekopesa ekateli na yango le 20 juin na boloko bonene ya Makala (CPRK) na Kinshasa epayi wapi bosambisami mpo na bopengwisi misolo mya botongi ndako 4.500 bozali kosalama.

Bazuzi bakoti kinzonzi nsima na Vital Kamerhe, Sammih Jamal mpe Jeannot Muhima koloba ete bayebi liakmbo te, bazali ba innonce.

Pocureur mpe parti civil (to l’Etat mofundi) basengaki etumbu ya mibu tuku mibale ya misala makasi mpo na Kamerhe mpe bopekisami ya mibu zomi bwa misala ya bokambi na politiki.

Procureur mpe parti civil basengaki mpe bobotalami ya misolo na ndako ya molongani ya M. Kamerhe, Hamida Chatur, mpe na ya mwana ya ndeko na ye Daniel Kingi Massaro.

"Nazali innoncent… Awa ezali nde likambo ya mboka, tofungola miso… Ezali ngayi te moto bazali koluka kasi mokonzi ya mboka," elobi na suka Vital Kamerhe.

Mpo na ye bosambisami bwango bozali ya politiki.

"Moto moko te apesi preuve ete ngayi na pengwisi misolo ya l’Etat," ebakisi M. Kamerhe.

Sammih Jamal, nkolo compagnie Samibo, na Jeannot Muhima mosala ya président atali import-export bango mpe balobi bazali ba innoncents.

Zuzi Mankenge atiamaki nsima na liwa lya zuzi mokambi mosusu Rapheal Yanyi na mbalakaka. Bilembo bya liwa lya ye bozali kozelama kino lelo.

XS
SM
MD
LG