Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Marie-Josée Mengi mosungi ya Hamida Kamerhe atiami na bokangami


Hamida Shatur, molongani ya Vital Kamerhe, mokambi ya kala ya ndako ya misala mya président ya Félix Tshisekedi, na bosambisami bwa mobali na ye, na boloko ya Makala CPRK, 4 juin 2020. (Capture d'écran)
Hamida Shatur, molongani ya Vital Kamerhe, mokambi ya kala ya ndako ya misala mya président ya Félix Tshisekedi, na bosambisami bwa mobali na ye, na boloko ya Makala CPRK, 4 juin 2020. (Capture d'écran)

Marie-Josée Mengi Kandundu, mosungi ya molongani ya Vital Kamerhe, Mme Hamida Chatur, atiami na bokangami nsima na koyanalo na parquet ya Cour d’Appel ya Kinshasa/Matete/Limete.

Moko na basambeli ba ye andimi ete Mme Mengi ayonolaki na bazuzi mpe nsima na yango atiyami na bokangami.

Parquet ezalaki koluka ye wuto ntango Mme Hamida Chatur atangaki ye na litatoli lya ye ya le 3 juin na bosambisami ya M. Kemerhe na bato basusu babale: Sammihi Jamal na Jeannot Muhima.

Mme Chatur asi atangaki Mme Mengi na parquet mpe alobaki ete nde azali mosungi na ye na misala mpe na mobongo.

Parquet elukaki ye na bisika Mme Chatur alobi kasi emonaki ye.

"Alongwa na Matete, akoma na Limete kasi nayebi adresse na ye te mpo ye nde ayaka epayi na ngayi," elobaki Mme Shatur.

Molongani ya M. Kamerhe alobaki afutaka Mme Mengi 500 $.

Parquet ezali kolandela Mme Mengi mpo na asombi ndako mingi ya motuya.

Mme Chatur atindaka ye kotia misolo mya ye na banque mpe kosala makombo.

M. Kamerhe afundami na kopengwuisa misolo ya kotonga ndako 3.500 mpo na mikolo nkama ya président Tshihsekedi.

Mme Chatur alobaki azali mosali mombongo mpe azwaki misolo mingi ntango asalaki makwela na molongani wa ye M. Kamerhe na sanza ya mibale.

XS
SM
MD
LG