Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari efungoli enketi mpo na koluka moto abomaki zuzi Yanyi ndenge autopsie elakisi


Le juge Raphael Yanyi Ovungu président le procès de Vital Kamerhe au CPRK à Kinshasa, RDC, 25 mai 2020.
Le juge Raphael Yanyi Ovungu président le procès de Vital Kamerhe au CPRK à Kinshasa, RDC, 25 mai 2020.

"Nakolanda ba rapports eye, vice-premier ministre mpe ministre ya mambi ma Bosembo asakoli bobandi bwa bolukiluki bwa misala ya bosembo  na ntina ya koluka biyano na lolenge babomi (zuzi Raphaël Yanyi)," ekomi ministre Célestin Tunda na liyebisi ekomeli VOA Lingala.

"Bato basali yango esengeli bayebana mpe bazwa etumbu ya makasi nyonso ya mobeko," ebaki ministre Tunda.

"Mbulamatari epameli na makasi manso ekala eye ya mabe, esengi bana banso bazala na kimya, mpe ekaboli mawa na libota," ebakisi ministre.

Na liyebisi lyango, ministre ya Bosembo alobi" autopsie emonisi ete zuzi Yanyi akufakaki mpo na makila mabimaki kati na moto na ye kolanda mpota kati na mokuwa ya bongo".

"Autopsie mpe elakisi biloko ya mabe kasi mingi te mpo na koboma zuzi," ekomi ministre Tunda.

Akufaki na mbalakaka le 27 mai 2020 mokolo nsima na audience ya misato ya bosambisami ya Vital Kamerhe, Sammih Jamal mpe Jeanot Muhima azalaki kokamba.

Jeanot Muhima mpo na mikolo nkama ya bokonzi ya président Tshisekedi.

Akufaki na ndako na ye.

Zuzi mosusu atiamaki na esika na ye mpe akopesa ekatali le 20 juin.

XS
SM
MD
LG