Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Zuzi Yanyi akufaki na traumatisme crânien


Zuzi Raphael Yanyi na bosamabisami ya Vital Kamerhe na boloko ya Makala (CPRK), Kinshasa, 11 mai 2020.
Zuzi Raphael Yanyi na bosamabisami ya Vital Kamerhe na boloko ya Makala (CPRK), Kinshasa, 11 mai 2020.

Zuzi Raphaël Yanyi akufaki na traumatisme crânien (mpota kati na moto), elobi vice-premier ministre mpe ministre ya misala mya Bosembo ya RDC, Célestin Tunda ya Kasende.

"Ntina ya yambo ya liwa lya zuzi Yanyi ezali mpota kati na moto eye ewutaki na bibotu (coups) azwaki, mingi mpeza na esika ya botawu ya mokuwa ya bongo," elobi ministre Célestin Tunda.

"Ntango mosusu zuzi (Yanyi) azwaki bibotu biye bimemaki mpota na motu. Makila makangamaki kati na mokuwa ya motu mpe yango nde ememaki na bokati motema," elobi ministre Tunda.

Ministre ya mambi ma Bosembo abakisi ete "substance toxique" (biloko ya mabe) bimonanaki mpe na nzota ya zuzi Yanyi.

"Kolanda autopsie, makambo maye masalamaki kala mpe makangami mpeza te na ntana ya liwa lya ye," ebakisi ministre Tunda.

Abakisi ete enketi mosusu ya bozindo esengeli kosamalama.

Mokambi ya ministère ya mambi ma Bosembo abeti sete ete médecin légiste principal ya lopitalo monene ya Kinshasa (ex Mama Yemo) nde apesi bilembo biye. Monganga yango azali mpe molakisi na université na faculté ya médecine ya Kinshasa.

Bilembo byango bindimami mpe na nganga ya boyebi (expert) indépendant médecin légiste ya MONUSCO (Misala ya Nations unies na RDC).

Zuzi Raphael Yanyi Ovungu abandaki kokamba bosambisami bwa Vital Kamerhe, Sammih Jamal mpe Jeanot Muhima mpo na mikolo nkama ya bokonzi ya président Tshisekedi.

Akufaki na mbalakaka le 27 mai 2020 mokolo nsima na audience.

Zuzi mosusu atiamaki na esika na ye mpe akopesa ekatali le 20 juin.

XS
SM
MD
LG