Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bayi Ne Mwanda Nsemi balobi bakufisi mitano kasi police elobi eza lokuta


Ne Mwanda Nsemi, leader de Bundu dia Kongo, ntango akangamaki, Kinshasa, le 4 mars 2017
Ne Mwanda Nsemi, leader de Bundu dia Kongo, ntango akangamaki, Kinshasa, le 4 mars 2017

Bayi Ne Mwanda Nsemi mokambi ya lingomba Bundi dia Mayala balobi ete bakufisi pene na bato mitano na matata mazalaki lundi pene na Ma Campagne, na Kinshasa. Kasi police elobi moto akutafi te.

Police ebetaki ba gaz lacrymogène na Kinshasa pene na Kintambo mpo kopanza balandi ya Ne Mwanda Nsemi (Ne Muanda NSemi) mokambi ya lingomba Bundu dia Mayala.

"Bayike kati na biso basalaki makasi ya kopekisa mwa matata wana kasi police ekobaki na kobeta masasi. Minei ya biso bakufaki wana mpe ya mitano ayaki kokufa nsima," elobi na Actualite.cd kalaka mokonzi ya lingomba BDM, Philippe Kimbangu.

Mokambi ya Police ya Kinshasa, Comsissaire divisionnaire adjoint, général Sylvano Kasongo ayebisi ete Ne Mwanda Nsemi na bato baye bazali koboya kotasa mibeko mpe balingi ata kosolola te.

Na ngambo na bango, bayi lingomba Bundu dia Mayala balobi ete babimaki mpo na kosala mwa milulu ya mbokoko na ntina ya kobenga coronavirus ya sika COVID-19.

Kasi mibeko mizwamaki na mokonzi ya mboka mipelisa bosangani ya bato koleka tuku mibale mpe mayangi manso ata ya losambo.

XS
SM
MD
LG