Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 109 bayebani na COVID-19


Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya misala ya bitumba na bokono ya Ebola, na Goma, Nord-Kivu, 2 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya misala ya bitumba na bokono ya Ebola, na Goma, Nord-Kivu, 2 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Motango bwa bato bayebani kozwama na coronavirus ya sika mokomi nkama moko na libwa, esakoli INRB, Institut national des recherches biomedicales.

Bato zomi na moko ya sika bazwami na yango, Sambo bazwi yango Kinshasa mpe minei ewuti libanda na mboka, kolanda INRB.

Bato mwambe nde bakufi, misato babiki.

Nzokande bakonzi ya mboka bayebisi kotala ndenge nini kobakisa mikano misusu mpo kopekisa bopanzani ya bokono boye.

Mmokambi ya cellule technique ya bitumba na COVID-19, Dr. Jean-Jacques Muyembe alobi na TOP Congo FM ete emonisa ete litomba ezali ete bato bavanda na ndako.

Mpo na ye esengeli kobanda yango na Gombe epayi wapi katikati ya motango ya bato banso bazwami na yango na RDC bazali na commune eye.

XS
SM
MD
LG