Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato babale ba yambo bakufi na COVID-19 na Congo-Brazzaville


CHU ya Brazzaville. Congo-Brazzaville, le 5 décembre 2019. (VOA/Arsène Séverin)
CHU ya Brazzaville. Congo-Brazzaville, le 5 décembre 2019. (VOA/Arsène Séverin)

Bato babale ba yambo bakufi na coronavirus COVID-19 na Pointe noire, na Congo-Brazzaville.

Ministre ya bokolongo Lydia Mikolo nde apesi sango yango. Kolanda maloba ma ye, bato tuku mibale na mibale nde bayebani kozwama na COVID-19 na Congo-Brazzaville sika oyo.

Eyebani malamu te soki baye bakufaki bazwaki bokono bwango libanda to kati na mboka.

Kasi moko na na bawei azalaki mokambi ya misala milandaka fraude mpe repression. Awutaki France na sanza ya février.

O'mokolo mwa eyenga mokonzi ya kala Congo-Brazzaville, Jaques Joaquim Yhombi Opango akufaki na coronavirus pene na Paris, na France.

Nzokande alanga nzembo Arulus Mabele ya Congo-Brazzaville, ye, nde akufaki na bokono bwango pene mikolo zomi mileki, na Paris, na France.

XS
SM
MD
LG