Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu na Muzito babengisi botamboli mosusu le 29 septembre mpo na bonsomi ya CENI mpe maponami na 2023


Democratic Republic of Congo joint opposition presidential candidate Martin Fayulu (C) is congratulated by other opposition leaders (from L) Jean-Pierre Bemba, Adolphe Muzito, Kofi Annan Foundation president Alan Doss and Freddy Matungulu during a press c
Democratic Republic of Congo joint opposition presidential candidate Martin Fayulu (C) is congratulated by other opposition leaders (from L) Jean-Pierre Bemba, Adolphe Muzito, Kofi Annan Foundation president Alan Doss and Freddy Matungulu during a press c

Martin Fayulu na Adolphe Muzito, mibale kati na bakambi ya Lamuka, babengisi botaboli mosusu le 29 septembre 2021 mpo na kosenga bonsomi ya CENI mpe maponami na 2023.

Bapameli makasi bayi polici baselalaki na botindami ya bakonzi mpo na kopekisa bato kotambola mikolo mibale mileke, le 15 septembre.

MM. Fayulu na Muzito balobi ete nilulu misalamaki na bisika 42 na RDC mobimba na botamboli bobengisamaki le 15 septembre.

"Mobulu mozalaki te ne Bulungu, Gemena, Gungu, Kamba, Kikwit, Kisangani, Kisantu, Lisala, Masamuna, Moanda, Moba, Uvira, Kiliba, Fetshi mpe Kibombo. Na bingumba misusu bizalaki mpe na milulu, botamboli bopanzanaki na ndenge ya makasi mpe police na milie (basima minduki) batindamaki babetaki bato," elobi liyebisi ya Lamuka.

"Mpo na Kinshasa, batamboli babetamaki, babotolamaki biloko, bazokisamaki mpe gaz lacrymogène (molinga ya pilipili na miso) ebetamaki. Bakambi ba Lamuka banyokolamaki na ndenge ya mabe na bayi police," ebakisi mokanda ya Lamuka.

Lingomba Lamuka lizali kosenga bolongoli loboko ya bayi politiki na CENI (to misala mya maponami) mpe maponami na 2023.

XS
SM
MD
LG