Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Emmanuel Ramazani alobi PPRD eza’kosenga boyokani yambo na kotinda bato na CENI


Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD azali kopesa lisikulu na bokutani ya Lubumbashi, Haut-Katanga, 24 octobre 2019. (Facebook/PPRD)
Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD azali kopesa lisikulu na bokutani ya Lubumbashi, Haut-Katanga, 24 octobre 2019. (Facebook/PPRD)

Emmanuel Ramazani Shadary alobi PPRD, lingomba lya mokonzi ya kala, Joseph Kabila, ekotinda te balakisi bilongi na CENI soki boyokani bozali te na boponi ya bakambi ya misala mya ponami mya mboka.

Kalaka mokambi to Secrétaire permanent ya PPRD (Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie) alobi yango nsima na bokutani ya lingomba na ye na Kinshasa.

"Biso PPRD tomoni ete boyokani bozali nanu te. Mokano mozali polele. PPRD ezali te na ngonga eye na boponami ya baye basengeli kokende na CENI," ebeti sete M. Ramazani.

Kalaka mokambi ya PPRD akundoli ete makambo mazali ndenge moko na maye masalamaki mobu moleki ntango moyi lingomba na ye, Jeanine Mabunda, azalaki kokamba Assemblée nationale.

Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi aboyaki kondima boponami bwa Ronsard Malonda nsima na bozangi boyokani kati na bakambi biyamba.

Lokola mbala wana, motoba kati na bakambi biyamba bandimaki nde M. Malonda kasi mibale baboyaki mpe bato bakitaki o’balabala. Mbala eye kaka bakambi moko wana bandimi nde Denis Kadima. kasi ba katoliko (CENCO) na ECC baboyi.

FCC (Front commun pour le Congo) liboke lya mangomba mazali nsima na M. Kabila, esi etindaki mokanda na mokambi ya Assemblée nationale mpo na kopesa makanisi ma yango ya koboya kotinda bato na CENI soki boyokani bozali te.

Mangomba misusu ma politiki mpe maboyi yango lokola Ensemble pour la république ya Moïse Katumbi, UNC (Union pour la nation congolaise) ya Vital Kamerhe mpe Lamuka ya ngomba ya Martin Fayulu na Adolphe Muzito.

XS
SM
MD
LG