Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi biyamba bayokani te kasi mitano kati na bango batiki nkombo ya baye bakozala na CENI


Mgr Marcel Utembi, mokambi ya CENCO (Conf♪0rence épiscopale nationale du Congo) na Kinshasa, RDC, 30 décembre 2016.
Mgr Marcel Utembi, mokambi ya CENCO (Conf♪0rence épiscopale nationale du Congo) na Kinshasa, RDC, 30 décembre 2016.

Balakisi bilongi ya Biyamba "Eglise ru réveil", ba musulmans, orthodoxe, kimbanguiste mpe Indépendants batiki na Bureau ya Assemblée nationale nkombo ya moto baponi mpo kotambwisi CENI ntango boyokani bozali kati na bakambi banso ba biyamba.

"Totoki procès-verbal ya boponi ya bato babale basengeli kozala na Bureau ya CENI (Commission électorale nationale indépendante)," esakoli prophète Dodo Kamba ya Eglise du réveil na Congo (ERC) na bobimi na Palais du peuple, ndako ya Parlement.

Molakisi elongi ya Armée du Salut azalaki te na bakambi biyamba batano baye, ata wuto mikolo mileki ye mpe amonanaki na bango elongo kolobaka ete baponi moto akokamba CENI na bozangi ya bayi catholique mpe ba misioni, ECC.

Motambwisi ya bakambi biyamba, Mgr Marcel Utembi ya CENCO (Conférence épiscopale nationale du Congo) lokola mpe bayi ECC (Eglise du Christ au Congo, Misioni), basengaki ete bakambi biyamba bandima kotia bempeni Denis Kadima na Cyrille Ebotoko, ba candidats mibale matata mazali mpo na bango, kasi bakambi motoba basusu baoyaki mpe balingi kaka M. Kadima.

Mgr Utembi apamelaki misolo mpe mituka, lokola mpe kobangisa bato baike bazali kolaka bakambi ba biymba mpo bandima M. Kadima.

Nzonkande mwa ngonga eleki, bakambi mwambe banso ya mangomba ya biyamba batiaki mokolo to na liyebisi to rapport elobi ete bayokani te mpo na kopna matambwisi ya CENI mpe moto mosusu akozala na plénière.

Bakangami mingi na likambo ya vote. Ya litomba ezali bondimami, Assemblée nationale nde ekokata likambo, eyanoli M. Kamba na motuna mpo na nini batiaki manzaka na rapport elobi ete balekaki ten a vote.

Mpo na M. Kamba, bato banso basengeli kotosa Buku likonzi mpe kosala ete maponami masala na 2023.

Nzoka nde, bayi politiki mingi, lokola Lamuka ya Martin Fayulu na Muzito mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, baboyi kotinda bato ba bango na CENI mpo na bozangi boyokani.

UNC ya Vitala Kamerhe eye ezali na Ensemble pour la république ya M. Katumbi na Union sacrée ya président Félix Tshisekedi, yango mpe epameli bozangi boyokani kasi elobi ekozala na CENI.

XS
SM
MD
LG