Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FCC eboyi kotinda balakisi bilongi na CENI


Néhémie Mwilanya (2e G), motambwisi ya FCC ya Joseph Kabila, pene na Emmanuel Ramazani Shadary (C) kalaka motambwisi ya PPRD na botamboli na boulevard Sendwe, na Kinshasa, RDC, 23 juillet 2020. (Facebook/PPRD Esimba)
Néhémie Mwilanya (2e G), motambwisi ya FCC ya Joseph Kabila, pene na Emmanuel Ramazani Shadary (C) kalaka motambwisi ya PPRD na botamboli na boulevard Sendwe, na Kinshasa, RDC, 23 juillet 2020. (Facebook/PPRD Esimba)

FCC, lingomba lya masanga mazali nsima na mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila, elobi ekoki te kotinda balakisi bilongi ba yango na CENI (Misala mya maponami) lokola Assemblée nationale esengi yango na ngonga eye.

Président ya cellule ya crise ya FCC, Raymond Tshibanda azongiseli eyano na mokanda président Assemblée nationale atindelaki masanga manso mpo na yango.

"FCC, ezali bongo na mawa ya kokoka te koynaola na bosenga na yo na ntango eye," ekomi M. Tshibanda.

Na mokanda yango, FCC ezali kosenga ete mikano mikoka kozwama na boyokani na bato ba ngambo inso.

Lingomba lya mokonzi ya kala lipameli Assemblée nationale na kosala linaka na kozanga kosangisa bato bansu.

FCC epameli mpe mobeko ya kotambwisa CENI lolenge Assemblée nationale ebongoli yango.

Yambo na FCC, ngambo ya Lamuka ekambamaka na Martin Fayulu mpe Adolphe Muzito eboyaki yango mpe lokola kotinda balakisi ba bango na CENI.

Mangomba manso maye bazali kopamela baye bazali na bokonzi na kolinga te kosala maponami na ngonga esengeli na 2023.

Bazali mpe kopamela ndenge baye bazali na bokonzi bazali kotia maboko likolo na misala minso; ezala misala mya bosembo, ezala mpo na kozwa majorité na Assemblée nationale na koleka te na maponami, ezala misala mya maponami.

XS
SM
MD
LG