Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bituluku ya bato bakimi bitumba na Minembwe


Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.
Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.

Bituluku ya bato bakimi bitumba kati mampinga mpe basimba minduki na Minembwe, na Sud-Kivu, eyebisi baoknzi ya bisika biye.

Bakimi bitumba bayike bazwami na commune ya Minembwe, na etando ya Fizi, eyebisi correspondant ya VOA Lingala na Sud-Kivu.

Bazali "25.000 awa na Minembwe centre," kolanda maloba ya molandi ya bourgmestre Charles Sadiki, oyo asololi na AFP.

Alobi ete bato baye bakimi kasi ba ndako nzike epunzamaki mpe ezikisamaki.

"Bato bazali kolala libanda, bazangi bileyi. Ata lisungi moko lizali te... Pene na Minembwe, tozali koyoka lokito ya masasi," esakoli mwana mboka Sadiki.

"Ezali nde mangomba ya basimba minduki baye basungami na mangomba ya basimba minduka ya bapaya," ebakisi M. Sadiki.

Kasi kimia ezongi banda mokolo ya jeudi, esakoli molobeli ya mampinga ya FARDC na bisika biye, capitaine Dieudonné Kasereka, na mopanzi sango ya radio Rehema Bukavu.

Ba FARDC batindaki lisungi ya makasi ya basoda, kolanda maloba ya cap. Kasereka. Alobi ete masasi matikaki kolela jeudi.

Kasi bakimi bitumba bazali naino kobanga kozonga bisika na bango.

Nzoka nde bitumba yango bizali kosalema kati na bakabila nzike. Banyindu basangani na Bafulero mpe ndambo ya Babembe mpe zali kobunda na Babanyamulenge baye basungami na baye bamonisami lokola bapaya, eyebisi baye bavandi kuna.

XS
SM
MD
LG