Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu asengi Tshisekedi koboma libala na Kabila


Martin Fayulu na meeting na lopango ya MLC, Kinshasa, 2019. (Facebook/Martin Fayulu)
Martin Fayulu na meeting na lopango ya MLC, Kinshasa, 2019. (Facebook/Martin Fayulu)

Martin Fayulu, candidat ya lingomba Lamuka na maponami ya présidentielle ya le 30 décembre 2018, alobi ete président Félix Tshisekedi aboma libala na mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Asali meeting liboso ya bituluku ya bato na place ya Poste, na Kisangani, na etuka ya Tshilombo.

"Ata ba media internationaux misusu balingi ba distraire ba populations … Bazomona te ete bana ya Congo bazali na président... Peuple congolais sujet na ye ezali : vérité des urnes. Tshisekedi akende aloba na Kabila ete mariage bango basalaki, a divorser. Aloba na Kabila ete Congolais aboyi, alingi eloko wana te, ezali mariage incestueux (ya ‘tshibawu’), ezali mariage oyo ba Congolais nalingi te, Congolais alingi mariage na ye na Commandant du peuple… Tolobi na ndeko Tshisekedi atika likambo wana. Bato oyo bakosaki ye aloba na bango ete bakosi ye," asakoli M. Fayulu na lisikuli na ye.

M. Fayulu asengi na ba Congolais kotelema mpo na kosukisa libala oyo.

Mpo na ye, eloko esalami te nsima ya mikolo 107 ya bokonzi ya Félix Tshisekedi.

Apesi toli na ba Congolais kolanda malako ya minganga mpo na kosukisa Ebola, ata yango ezuwamaki lokola raison mpo na kopekisa maponami na Beni.

Alobi Congo démocratique ekokufa te ata bayike balingi liwa na yango. Ndenge moko mpeLamuka ekozala kaka.

XS
SM
MD
LG