Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu akosala meeting lundi na Kisangani


Martin Fayulu afukami pene na Eve Bazaiba mpe Adoplhe Muzito na bokomi na Benik, Nord-Kivu, 2018. (Facebook/Joel Cadet Danga)
Martin Fayulu afukami pene na Eve Bazaiba mpe Adoplhe Muzito na bokomi na Benik, Nord-Kivu, 2018. (Facebook/Joel Cadet Danga)

Kolanda ndingisa ya mokambi ya engumba ya Kisangani, Martin Fayulu okazala na meeting na esika liye lundi.

Candidat ya lingomba Lamuka mpo na presidentially eleki, M. Fayulu okozala elongo na Adolphe Muzito mpe Eve Bazaiba.

Bakokoma na libanda ya mpempo na 13h mpe bakokende na place ya Psote mpo na meeting yango.

Mokambi ya engumba Kisangani, Eugenie Wandandi Biekusa ayebisaki na eyano na ye ya baye ya Lamuka ete andimi basala bokutani. Kasi, asengaki bango kopesa ye, kino lundi, itineraire bakolanda mpe ngonga ya meeting yango.

M. Fayulu azali kokoba kosenga bosolo ya maponami mpo alobi ye nde alongaki na présidentielle ya le 30 décembre 2018.

XS
SM
MD
LG