Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi abeti masolo na Sindika Dokolo na Kinshasa


Président Felix Tshisekedi, na droite, apesi mbote na Dokolo Sindika na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 11 mai 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Felix Tshisekedi, na droite, apesi mbote na Dokolo Sindika na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 11 mai 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ayambi na Cité ya Union africaine Sindika Dokolo, mokambi ya mouvement citoyen "Les Congolais débout", oyo azongaki mikolo minei mileki na RDC nsima ya mwa mibu ya exil libanda na mboka.

Bilili ya bokutani na bango bitiyami na ba réseaux sociaux ya présidence ya république kasi makambo basololi mayebisami te.

Mwana mboka Dokolo azongaki na Congo démocratique mardi le 7 mai. Alaki kopesa maboko na mboka na boyebi na ye na makambo ya business (mombongo).

"Mosala tokosala ezali ya motuya. Politiki esepelisi biso mpenza te. Kasi, lokola mwana mboka (citoyen), nazali homme d’affaires, ndenge moko na basusu mingi ya diaspora, nazali na bagage, na zuwa savoir-faire na libanda," alobaki.

M. Dokolo abongoli maloba na ye nsima ya kosenga mikolo mileki bosolo ya maponami.

Abala Isabel dos Santos, mwasi ya mosolo mingi mpe mwana ya mokonzi ya kala ya Angola, Eduardo dos Santos.

XS
SM
MD
LG