Mardi ezalaki mokolo ya mibale ya bosambisami (empechment) ya M. Trump.
Atindaki bato na mobulu, esalamaki paba te, elobaki moko na démocrates bapesami mokumba ya kofunda liboso na Sénat.
Lundi, Sénat endimaki ete bosambisami bwango bozali na loboko ata M. Trump asi atiki bokonzi.
Basambeli ba M. Trump bazali koboya ete akende kotatola na Sénat mpo balobi ntina ya bosamibisami bwango bozali kolongola mokonzi na kiti na ye, kasi M. Trump asi atika ekonga na ye ntango Joe Biden alapaki ndayi mpe avandisamaki na ebonga le 20 janvier.
Voir les commentaires
Avez vous déjà un compte? Connectez-vous
Êtes-vous un utilisateur enregistré? Inscrivez-vous
Voir plus de commentaires