Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alongolaki etumbu ya Dan Gertler yambo atika bokonzi


Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.
Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.

Département ya Trésor ya Amerika elongali etumbu likolo ya moyi Israël Dan Gertler, oyo akoma moyi RDC, mpe epesi ndingisa kosala mombongo na bayi Amerika.

Mokano mwango mozwami mikolo mitano yambo na président Donald Trump atika bokonzi le 20 janvier nsima na bolapi ndayi ya Joe Biden oyo alongaki maponami.

Ezali na bolandi mbela ya ba lobbyists mpe basambeli basusu ya Dan Gertler lokola Alan Dershowitz oyo azali moko na bayi Nzinga Nzinga ya M. Trump.

"Napesi losako na mokano mwa mbulamatari ya Amerika ya kolongola etumbu likolo ya moyi mombongo Dan Gertler, tolikyi ete ekopesa nzela na kokokisa na lombango mabongisa ma ‘Ya Biso’, mbongwana esengeli epesa nzela na bilenge bya Congo kozala mpe na bosaleli ba cuivre (motako) mpe cobalt", ekomi Georges Kapiamba, mobundi ya makoki ma bomoto oyo atelemelaki makasi Dan Gertler mikolo mileki mpo na yango.

M. Gertler apesamaka etumbu na mbulamatari ya M. Trump na décembre 2017 na mokano motali mbeba ya bomoto mobengami Global Magnitsky Human Rights Accountability Act, eye ekangaki bozwi bonso ya M. Gertler na Eatts-Unis mpe epekisaki bayi Amerika kosala mombongo na ye.

Baike bazalaki kopamela Dan Gertler na kozala moninga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila. Mpe mingi mpenza na ngenge asombaki eteni enene ya Gécamines na misolo mike mpenza.

Kasi Dan Gertler afungoli compagnie na bayi RDC na sosicété na ye Metalkol na nzela ya "Ya Biso" mpo ete bakoka mpe kotia misolo mpe kokota na bosaleli makele ma RDC na mbongo na bango.

XS
SM
MD
LG