Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alongoli mokano ya Trump ya kopekisa bayi mboka nzike kokota na USA


Président Joe Biden azali kotia manzaka na mikano mya ye mya yambo na Maison Blanche, Washington, Etats-Unis, 21 janvier 2021.
Président Joe Biden azali kotia manzaka na mikano mya ye mya yambo na Maison Blanche, Washington, Etats-Unis, 21 janvier 2021.

Président Joe Biden azwi mokano ya kolongola pobekisi ya bayi mboka nzike kokota na Amerika. Ezali moko na mikano atie manzaka o’mokolo mwa ye mwa yambo na bokonzi.

Mokano mwa M. Biden mokopesa nzela na ba millions ya bapaya bazanga mikanda kokoka kozwa yango.

Mokano ya M. Biden molongoli mobeko moye M. Trump azwaki na Janvier 2017 mpo na kopekisa bayi mboka nzike ya ba musulmans lokola Iran, Somalie, Syrie mpe Yémen kokota na Etats-Unis.

Na bokonzi bwa ye, M. Trump azalaki kotelemela bapaya, atongisaki kutu efelo na ndelo ya Mexique.

M. Biden apesi elikya na baye babengamaka ba “dreamers”, baye bazelaka kozwa mikanda, bakota na Amerika bango moko to na nsima ya baboti ba bango na elikya ya bomoi bolamu.

M. Biden atie mpe manzaka na mokano ya kopekisa bobengani ya bapaya na makasi to monyokoli.

Mikano misusu M. Biden asakoli mitali makambo mingi mingi, kati na yango COVID-19.

M. Biden atie manzaka na mokano ya kokomisa bokebi to bokendeli makasi na baye bakuwuta mboka misusu, ya kopesa mngwele mingi mpe kotalisa nzoto ya bato mingi.

Mikano misusu mitali nkita mpe boyokani na bikolo nzike.

XS
SM
MD
LG