Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami bwa Trump bobandi kasi basambeli ba ye balobi akozala te mpo asi alongwa


Donald Trump, mokonzi ya 45 na Etats-Unis na lisikulu lya ye na Dalton, Georgia, 4 janvier 2021.
Donald Trump, mokonzi ya 45 na Etats-Unis na lisikulu lya ye na Dalton, Georgia, 4 janvier 2021.

Basambeli ba Donald Trump balobi mokonzi ya kala ya Amerika akoki te kotelema na bosimbisami bwa ye boye misala mya yango bozali kobanda (lelo) mardi 9 février mpo asi atika bokonzi.

Ba avocats ba 45e président ya Etats-Unis bakundoli ete bosambisami to “empeachment” boye bozali mpo na kolongola Donald Trump na bokonzi nzonkande ye asi atikaki ebonga ya bakonzi.

Wuto le 20 janvier, Joe Biden akomaki 46e président ya Etats-Unis nsima na kolapa ndayi mpe kovandisama na bokonzi na kokitana na M. Trump.

Lelo, mardi 9 février misala mya “empeachment” to bosambisami bwa M. Trump bozali kobanda nsima na ye kofundama na suku ya ba Représentants (ba députés na Etats-Unis) mpo na eyoma balandi ba ye basalaki le 6 janvier na ntina ya kopesi Congrès kondima elonga ya Joe Biden na maponami ma mokonzi ya mboka.

O’mokolo mwa yambo ya bosambisami bwango, ngambo inso nde ekoloba liboso lya Senat mpo etali loboko lya bosambisami bwango kolanda Buku likonzi.

Ekomi mbala ya mibale ete M. Trump asamba liboso lya Congrès. Mbala ya yambo ezalaki mpo na kofundama na boyokani bwa ya nkunku na Russie.

XS
SM
MD
LG