Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko baike ya Amerika basengi Biden kozongisa etumbu likolo na Dan Gertler


Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.
Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.

Comité ya mambi ma bikolo bya bapaya ya House of repesentatives (Assemblée nationale ya Etats-Unis) esengi na président Joe Biden kozongisa etumbu likolo na Dan Gertler, moyi mombongo ya makele, (etumbu) eye président Donald Trump alongalaki yambo na kotika bokonzi.

"Bakeli mibeko républicain Gregory Meeks, republicain Karen Bass mpe James Himes basengi mbulamatari ya Biden kozongisa etumbu likolo na Dan Gertler, oyo ayebana ntango molayi na lisolo ya kaniaka na RDC," ekomi ba Congressmen basato baye na liyebisi na bango.

Bakeli mibeko baye balobi lisusu ete “bazali komitungisa mpo na mokano ya mbulamatari ya M. Trump ya kolongola etumbu yango na kozanga koloba ntina nini".

Mikolo mitano yambo M. Trump atika bokonzi, libenga ya Amerika (Trésor ya Amerika) moe mbulamatari na ye ezwaki mokano ya kolongola etumbu yango mpe kopesa ndingisa na bayi Amerika kosala mombongo na Dan Gertler.

"Na Bozindo!" Washington elongoli etumbu likolo na Dan Gertler! Eyano ya Me Kapiamba
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:28:30 0:00

Lokola ba congressmen baye, babundi mpo na makoki mabomoto mpe basengaki na mokonzi ya sika ya Etats-Unis, Joe Biden, kozongisa etumbu yango. Mingi mingi penza, lingomba to mabongisi "The Sentry".

"Ba ONG ya makoki ma bomoto, ya bitumba na kaniaka mpe ya lisungi wuto RDC mpe na molongo mobimba, kati na yango Filimbi, The Sentry.org, HRW (Human Rights Watch) mpe Anti-corruption, bazali kosenga na lombango kolongola popesi nzela epayi ya Dan Gertler soki yango ezali na mbano te ya ba agencies," ekomi na Twitter Peter Pham, molakisi elongi ya kala ya Amerika na Grands lacs, lelo molakisi ya elongi ya Amerika na Sahel.

Na ngambo na ye, Dan Gertler na compagnie Metalkor basalaki mabongisi na nkombo na "Ya Biso", mpo na kopesa nzela na bana ba RDC kosomba biteni na kati mpe komikotisa na mosola ya kozwa mpe kosteka makele ma mboka.

Baike na baye babundaka mpo na makoki ma bomoto mpe sembo basepelaki na bolongwi ya etumbu yango mpe na mabongisi ma "Ya Biso", lokola Georges Kapiamba ya ACAJ (Assocition congolaise pour l’accès à la justice).

XS
SM
MD
LG