Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba experts ya OMS bazo’kutana na Gevène mpo na Ebola


Bokutani ya ba experts ya bokolongono na ndako ya Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono (OMS) na Genève, Suisse, 11 février 2020.
Bokutani ya ba experts ya bokolongono na ndako ya Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono (OMS) na Genève, Suisse, 11 février 2020.

Ba experts ya OMS bazali kokutana na Gevène (Suisse) mpo na kotala soki bokono bwa Ebola na ekolo Congo démocratique esengeli ekoba kotalama lokala urgence mondiale to bosengi ya lombango ya molongo.

Na sanza ya motoba, Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono (OMS) esakolaki ete Ebola na RDC ezali bosenga ya lombango ya molongo. Mokano moye mopesaki ba OMS mpifo ya kokepisa mibembo mpe kosenga misolo.

Kasi bokono bwa Ebola bomonisami wuto mikolo mike lokola bokiti makasi.

"Esengeli te tobosana Ebola"… "Tozali kozwa makasi na ndenge makambo mazali kokende mpo na tozwaki kaka bato misato na Ebola mposo moleki mpe ata moto moko te azwami na mikolo misatu miye," elobaki mardi na bapanzi sango mokambi ya OMS, Tedros Adhanon Ghebreyesus.

"Soki tozwi ata moto moko na mikolo 42, (elingi koloba ete Ebola) esili nanu te," ebeti sete Tedros Adhanon Ghebreyesus.

Bokono bwa Ebola bobandaki mbala oyo na RDC na août 2018. Koleka bato 2.300 basili bakufi na bokono oyo bozali kongala na est ya Congo.

Kolanda OMS, koleka bato 1.000 bakufi na Coronavirus ya sika, bato 42.000 nde bazwi yango mpe esi'ekoti na mboka 25.

Coronavirus ya sika ebandaki na Yuhan na Chine.

XS
SM
MD
LG