Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

OMS ekebisi mokili mpo na kobosana Ebola likolo ya Coronavirus ya sika


Bopesi magwele ya Ebola na Nord-Kivu, RDC, 20 novembre 2019. (Twitter/OMS)
Bopesi magwele ya Ebola na Nord-Kivu, RDC, 20 novembre 2019. (Twitter/OMS)

OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolono) ekebisi mokili kobosana Ebola mpo na bokono bwa Coronavirus ya sika boye bozali kongala na mokili kowuta na Chine.

"Esengeli te tobosana Ebola"… "Tozali kozwa makasi na ndenge makambo mazali kokende mpo na tozwaki kaka bato misato na Ebola mposo moleki mpe ata moto moko te azwami na mikolo misatu miye," elobi na bapanzi sango mokambi ya OMS, Tedros Adhanon Ghebreyesus.

"Soki tozwi ata moto moko na mikolo 42, (elingi koloba ete Ebola) esili nanu te," ebeti sete Tedros Adhanon Ghebreyesus.

Bokono bwa Ebola bobandaki mbala oyo na RDC na août 2018. Koleka bato 2.300 basili bakufi na bokono oyo bozali kongala na est ya Congo.

Kolanda OMS, koleka bato 1.000 bakufi na Coronavirus ya sika, bato 42.000 nde bazwi yango mpe esi'ekoti na mboka 25.

Coronavirus ya sika ebandaki na Yuhan na Chine.

XS
SM
MD
LG