Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

MONUSCO etindiki batomboki na Ituri


Basoda ya Monusco na lopango na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.
Basoda ya Monusco na lopango na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.

Basoda ya MONUSCO bakimisi basimba minduki bameka kobundisa misala mya yango na Biakato, na Ituri.

"Ba Casques bleus bakimisi babundi mitano to motoba bamekaki kokuta na lopango na yango na butu ya mposo na eyenga na Biakato, na Ituri," eyebisi Monusco.

"Moto azoki te," ebakisi Monusco.

Na Biakato, basali basato ba bitumba na Ebola babomamaki le 28 novembre na basimba minduki baye bandimaki polele te.

OMS elongolaki basali na yango na esika eye, lokola MSF, nsima na bitumba bisusu.

XS
SM
MD
LG