Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nzoto 27 ya babomami ya Oicha ekundami


Basali ya bokolongo bamemi sanduku ya mowei ya Ebola, na Beni, na Nord-Kivu, 15 décembre 2018.
Basali ya bokolongo bamemi sanduku ya mowei ya Ebola, na Beni, na Nord-Kivu, 15 décembre 2018.

Nzoto ya bato zomi na sambo ya baye babomamaki na ba ADF na Oicha, na Beni (Nord-Kivu) ekundami o’mokolo yay a mintao.

Bato bayike basangaki na milulu ya bokundami kasi masasi mabetamaki kowuta nzamba ntango ya bokundami bwango.

Liwa ya bato baye ememaki botelemeli Monusco eye bavandi ya Beni, ya Nord-Kivu mpe ya bisika bisusu bazali kosenga kolongwa na RDC.

Batelemeli bazali kofunda Monusco kosala eloko te mpo na kopekisa ba ADF kosilisa bango.

Wuto mposo ebandaki milulu ya botelemeli Monusco mpe ya kosenga bokengi mizali kosala bisika mingi.

Lelo vendredi na Goma, bavandi basalaki ville-morte mpe bakangi nzela na mabanga mpe nzete.

Kasi bitumba bisalami kati ba policiers na bilinge baye bayike bakitaki o’balabala mpo kotalisa nkanda na bango likolo ya bobomi ya bavandi ya Beni.

Police ebetaki gaz lacrymogène. Mingi mpenza na quarier ya Katindo.

Na Kinshasa, bayike mpe basalaki mwa milulu se mpo na ntina moko wana.

Ba ADF babomi koleka bato nkama moko na territoire ya Beni uto sanza ya zomi na moko ebandaki, kolanda AFP.

Kasi boko na bilenge ya etuka ya Nord-Kivu basengi ete, ata nkanda ezali, bavandi ya Beni bayeba kobatela biloko ya mboka mpe bapesa maboso na mapinga ya ba FARDC.

Nzoka nde Kalaka mokonzi molandi ya ONU, Jean-Pierre Lacroix, asengeli kokoma vendredi na ekolo Congo démocratique nsima na pene na mposo mobimba ya botelemi Monusco. Akokita na Beni mpe na bisika ya bitumba na Ebola na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG