Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Député Mamba akobanda kosamba lelo ata Assemblée nationale eboyaki


Jean-Jacques-Mamba
Jean-Jacques-Mamba

Député Jean-Jacques Mamba, mobandisi ya pétition oyo ekweyisaki Jean-Marc Kabund na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale, akobanda kosamba mercredi na Cour ya cassation na bofundami ya député mosusu mpo na kotia nkombo na ye na lokuta kati na mokanda mwango.

Assemblée nationale esengaki bomisami bwa ye mpe suka ya bolandami bwa ye. Kasi parquet eyanoli ete esi etindaki likambo yango na tribunal.

Député Simon Mpiana ya UNC (Union pour la nation congolaise) afundaki M. Mamba na kolaba ete atiaki nkombo na ye na nkasa ya kosenga bolongwi ya M. Kabund mpe amekolaki mokoloto mwa ye.

Ba député 62 nde batiaki manzaka na mokanda mwango.

Lundi, ba députés bandimaki pétition yango mpe balongolaki na maponami M. Kanund na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG