Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Jeanine Mabunda aponami mokambi ya Assemblée nationale


Jeanine Mabunda,aponami présidente de l'Assemblée nationale, na Kinshasa, RDC, le 24 avril 2019. (Facebook/Paulette Kimuntu)
Jeanine Mabunda,aponami présidente de l'Assemblée nationale, na Kinshasa, RDC, le 24 avril 2019. (Facebook/Paulette Kimuntu)

Jeanine Mabunda ya PPRD aponami présidente ya Assemblée nationale elongo na bato mitano basusu baye bakosala na bureau ya Assemblée nationale. Kasi opposition ekitaki te na maponami maye mpo na koboya ebonga moko ya rapporteur eye majorite CACH-FCC etikeli yango.

Mopesi toli ya mokonzi ya kala, Joseph Kabila, mpo etali bozuwi basi na makasi mpe bokotisi ya bana na masanga masimba minduki, Mme Mabunda atikalaki candidate moko mpo ebonga ya mokambi ya A.N. nsima na koyokana mpe kondongwana na ba familles politiques misusu.

Bato mitano basusu baponami mpo na mabonga misusu ya bureau ya Assemblée nationale. Kati na bango, président intérimaire ya UDPS, Jean-Marc Kabund oyo aponami vice-président wa yambo.

Opposition ekeyi liboso ya Conseil constitutionnel mpo na koboya maponami maye.

XS
SM
MD
LG