Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Balandi ya UDPS batelemeli ba députés nationaux


Président ai ya UDPS Jean-Marc Kabund mpe 1er vice-président ya Assemblée nationale akiti mpo na kokitisa mitema ya balandi ya lingomba na ye liboso ya Palais du peuple, Kinshasa, le 10 juin 2019. (Facebook/Estha Kasukulu Estha)
Président ai ya UDPS Jean-Marc Kabund mpe 1er vice-président ya Assemblée nationale akiti mpo na kokitisa mitema ya balandi ya lingomba na ye liboso ya Palais du peuple, Kinshasa, le 10 juin 2019. (Facebook/Estha Kasukulu Estha)

Police ebeti gaz lacrymogène mpo na kopanza baye ya lingomba UDPS baye bakangi nzela ya bokoti na Parlement banda ntongo. Kasi balandi ya UDPS batiki mobulu te.

Baye basali mobulu moye babambaki mabanga na mituka ya ba députés nationaux mpe bapekisi bango bakota na lopango ya Assemblée nationale mpe Sénat.

Mobulu moye mobimi nsima na ba députés kopamela to kotiola mposo moleki ba ordonnances to miko président Félix Tshisekedi azwaki mpo na kotiya bakambi ya Gécamines mpe SNCC.

Augustin Kabuya, Kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba ya mokonzi Tshiskedi, akitaki ye moko na esika eye mpo na kokitisa mitema ya baye ya lingomba na ye. Kasi bayokeli ye te.

Yambo na yango, M. Kabuya alobaki ete atindaki balandi ba UDPS te kosala mobulu mpe asengaki bango kotika président Tshisekedi komema makambo yango.

Ndenge moko, président ai ya UDPS, Jean-Marc Kabund, oyo azali 1er vice-président ya Assemblée nationale abimaki kasi balandi ya UDPS baboyi koyokela ye mpo lokola.

Mpamela ya ba députés nationaux, mingi mpenza ya FCC, etindi bayike ya lingomba CACH liye lisangisa UDPS na UNC, kosenga na président Tshisekedi kobima na boyokani ya bokambi mboka na lingomba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG