Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

CACH ekati masolo na FCC (Kabund)


Jean-Marc Kabund (C), vice-président ya Assemblée nationale, président ya UDPS mpe ya lingomba CACH na Kinshasa, 8 janvier 2019
Jean-Marc Kabund (C), vice-président ya Assemblée nationale, président ya UDPS mpe ya lingomba CACH na Kinshasa, 8 janvier 2019

Jean-Marc Kabund, vice-président ya Assemblée nationale, président ya UDPS mpe ya lingomba CACH ayebisi ete masolo na bango na FCC makatani. Asokoli yango nsima balandi ya mangomba babale baye ya lisanga ya kokambo mboka batunmbaki ba photos ya bakonzi na bango mpe bafingani.

"Kotumba elili ya mokonzi ya mboka oyo bomoto bwa ye bokoki te kosimbama (kofingana), na miso ya Progouv (mokambi ya etuka), bakambi ya ANR mpe ya police ekoki kondimama te. Yango, biso (CACH) to kati masolo manso na FCC kino bato basali makombo maye bakozwama," ekomi na compte Twitter na ye, Jean-Marc Kabund.

Na ngambo na ye, motambwisi ya FCC, mopesi toli ya kala ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, Néhémie Mwilanya, atelemeli mobulu moye.

"Nasengi kimya mpe bomoto ya baye banso bazali na mokumba kati na boyakani… Yango, mpo kobatela kimya mpe masolo masengeli na ntina ya kobomba maye tozwa na démocratie," ekomi na Twitter ya FCC, Néhémie Mwilanya.

Na suka ya mposo moleki baye ya UDPS, lisanga ya mokonzi Felix Tshisekedi, mpe ya PPRD ya mokonzi ya kala Joseph Kabila batumbanaki bilili ya bakonzi na bakonzi na bango mpe baswanaki makasi na maloba na ba vidéos.

Esalamaki na etuka ya Lualaba mpe na bisika bisusu. Na Kinshasa, baye UDPS babandaki kotumbaki mposo moleki bilili ya Joseph Kabila bizalaki kopesa sango ya meeting na ye ya bozongi na politiki o’mokolo ya le 14 décembre na stade des Martyrs.

Mambi maye masalami ntango Félix Tshisekedi na Joseph Kabila bakutani mposo moko mokolo moleki, mikolo misato, mpo na kosolola ndenge nini bakoko boyokani na bango.

Nzokande mokambi ya etuka ya Lualaba, Richard Muyej akutani na balakisi ya bilongi ya lisanga ya boyakani ya bokambi mboka liye na Kolwezi mpo koluka kimya.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG