Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kabund akebisi kosukisa boyokani na FCC soki batosi Tshisekedi te


Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019
Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019

Mokambi ya ntango eye ya UDPS, ya lisanga CACH (Cap pour le changement) mpe vice-président ya Assemblée nationale, Jean-Marc Kabunda akebisi kosukisa boyokani na FCC soki makambo makeyi malamu te kati na bango.

Alobi yango liboso ya bayike ya balandi ya lingomba na ye na ndako ya UDPS na Limete.

"Nazali kokebisa bandeko ya FCC. Tondimaki boyokani (coalition) na motema malamu. Toyebaki te ete boyokani bwango bolingaki komema matat boye na ekolo mobimba. Kutu boyokani bozali komema bikakatano mingi. Kasi tokondima te ete lingomba ya bato moko batelemela mokonzi ya mboka. Bokonzi ya Fatshi ezali ya peuple," esakoli M. Kabund.

"Tokondima te ete bato moko boye basalela 'coalition' mpo na kokanga nzela ya misala ya mokonzi ya mboka," ekebisi mokambi ya UDPS.

M. Kabund apesi eyano eye na kolanda matata kati na balandi ya CACH ya président Félix Tshisekedi na ya FCC (Front pour commun le Congo) ya mokonzi ya kala, Joseph Kabila.

Mposo moleki bayi mangomba babale baye batumbanaki bilili ya bakonzi ba bango babale na bisika mpe bituka ebele. Mingi mpenza na Kinshasa, mpo na bayi UDPS. Mpe na Luaba mpo na mangomba mabale.

Matata myango malandi bosakoli ya baye FCC, ya bozongi na poliliki ya Joseph Kabila. Bilili ya Joseph Kabila bipasomalaki mpe bizikisamaki bizalaki kosakola meeting na ye o’mokolo ya le 24 décembre na Stade des Martyrs na Kinshasa.

Boswani mpe bozali mingi likolo bopesi nkombo ya M. Kabila na mponami ya mokonzi ya mboka ya 2023.

Jean-Marc Kabund akebisi ete mbala ya sima akopesa mitindo na bayi UDPS soki bayi FCC bakobi kozanga botosi na mokonzi ya mboka.

Azwi ndakisa ya Angola mpo na koloba ete mokonzi ya kala amonanaka te. Mpe akundoli ete bayike na basungi ya mokonzi ya kala ya Angola batondisi boloko.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG