Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID-19: Ba Sénateurs libwa mpe basali ba Sénat 38 bazwi bokono


Sénat ya RDC eyambi mokambi ya FMI (Fonds monétaire international) na Kisnhasa, 25 mai 2009.
Sénat ya RDC eyambi mokambi ya FMI (Fonds monétaire international) na Kisnhasa, 25 mai 2009.

Mbonge ya misato ya COVID-19 eye ezali kongola na RDC, ekoti mpe na Parlement. Mingi mingi na Sénat, elobi bakambi ya parlement.

Basali 38 ya Sénat bazwami na COVID-19 mpe ba sénateurs libwa mpe lokola bazwami na yango, esakolo mokambi ya Senat Modeste Bahati Lukwebo.

Motambwisi ya Sénat akundoli ba Senateurs mpe basali kotosa mibeko mya bobateli.

Nzoka nde Cellule technique ya bitumba na COVID-19 eyebisi ete mpo na ekolo mobimba, bato zomi na babale basusu bakufi.

Na motango cellule technique epesi lundi ntongo, bato nkama minei na tuku minei (440) basika bayebani na kozwa bokono.

Kati na bakoni baye, nkama minei na zomi na motoba (416) bazali na Kinshasa.

Nord-Kivu nde etuka ya mibale na bakoni zomi na sambo, nsima na yango Tshopo na minei mpe Sud-Kivu na misato.

Kaka bato koleka nkoto tuku misato na mine inde bazwai mangwele.

Bakoni banso baleki nkoto tuku misato na ndombo wuto COVID-19 ekotaki na RDC na mars 2020.

XS
SM
MD
LG