Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mukwege alobeli bokokani ya basi na babali na likita lya G7


Dr. Denis Mukwege Prix Nobel ya Kimaya na l'hïpital Panzi na Bukavu, 5octobre 2018.
Dr. Denis Mukwege Prix Nobel ya Kimaya na l'hïpital Panzi na Bukavu, 5octobre 2018.

Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya, azwaki maloba na nzela ya singa na Conseil consultatif mpo na kolobela bokakani ya basi na babali na likita lya bikolo sambo bya nkita koleka na mokili, G7. Kasi na Assemblée provinciale ya Sud-Kivu, asengi bayi politiki kosukisa moniokoli kolanda bomwasi.

"Na likita lyango, ba experts to banganga mayele balakisaki na bakambi( ba G7 Ndlr) mikano miye mitie na liboso bokokani bwa basi mpe babali na ntina ya kokaka kotelema nsima na bokono (wa COVID-19 Ndlr) bopanzani na mokili," elobi liyebisi lityami na compte Twitter ya ambassade ya Royaume-Uni na Kinshasa.

Dr. Mukwege abundaka mingi mpo bokokani ya basi ba babali mpe atelemeka bozangi bosembo inso na RDC mpe na mokili.

Azwaki mbano mpo na kobongisa basi nkoto na konto bapebisama na kozwama na makasi na monyele ya RDC wuto bitumba bingala na mboka na 1996.

Na Assemblée de la province du Sud-Kivu, na Bukavu, Dr, Mukwege abengisamaki mpe lisusu, Dr. Mukwege asengi na bayi politiki ya RDC kosala mpo na kosukisa monyokoli kolanda bomwasi to mobali mpe monyokoli ya bana mboka..

XS
SM
MD
LG