Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshsikedi azalaki na likita lya G20 eye elaki kopesa mangwele mingi mpe misolo na ba compagnies bya Afrika


Président Félix Tshisekedi na likita, na visioconférence, G20, liboke lya bikolo bya nkita koleka na molongo, 21 mai 2021. (Twitter/Présidence RDC_
Président Félix Tshisekedi na likita, na visioconférence, G20, liboke lya bikolo bya nkita koleka na molongo, 21 mai 2021. (Twitter/Présidence RDC_

G20 liboke lya bikolo tuku mibale bileki na nkita na molongo elaki kopesa mangwele mingi ma COVID-19 na bikolo bya bobola.

Ezalaki na likita lisalami na bosenga ya Italie. Président Félix Tshisekedi azalaki mpe na likita lyango na visioconférence bo’ mokambi ya Union africaine mpe mokonzi ya RDC.

Bakambi ba Pfizer, Modern ana John % Johnson, ba compagnies minene, balaki kopesa millions misato na ndambo ya mangwele na ntalo ya nse na bikolo bya nkita moke mobu moye mpe moye mokolanda.

Union européenne elaki mangwele 100 millions mpe kotya misolo na ba compagnies ya bituka bya Afrika na nzela ya bomemaka nkisi na continent ya Afrika.

Bokutani bwango bozalaki mpo na koluka biyano na COVID-19 eye esili koboma 3,4 millions na mokili wuta ebimaki na 2019.

XS
SM
MD
LG