Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Couvre-feu na RDC mpo na kobetela ekolo na mbonge ya mibale ya COVID-19


Policier moko azipi zolo na munoko na masque na misala mya kolamusa bato mpo na komibatela na COVID-19, na Kinshasa, RDC, 29 mai 2020.
Policier moko azipi zolo na munoko na masque na misala mya kolamusa bato mpo na komibatela na COVID-19, na Kinshasa, RDC, 29 mai 2020.

Na bokambi ya président Félix Tshisekedi, comité sectoriel ya bitumba na COVID-19 ekati ete mboka couvre-feu to bokangami ya bato na ndako ekozala mboka wuto 21h ya mpokwa kino 5h ya ntongo.

Couvre-feu yango ekobanda o’mokolo mwa mitano (vendredi).

Bakambi ba RDC bakundoli ete bana banso ba mboka basengeli kolanda na bokebi maloko ma komibatela lokola kolata masque, kosukola maboka ntango inso mpe kobatela ntaka ya 1,5 m na bato basusu.

Kolanda mokona ya bakonzi ya mboka, wenze to nzando epekisami.

Mayangi manso ya koleka bato 10 mpe epekisami, lokola mpe ba kermesses mpe ba feti.

Loyi ya Noel lokopesana na lombango na biteyelo ya primaire na secondaire.

Kelasi ya likolo to ba universités ekozonga o’mokolo mokopesama.

RDC mpe esimbami na mbonge ya mibale ya COVID-19 ezali kongala na mokili ata motango ya yango mozali na nse.

Wuto mobu moleki, bato 14.596 bazwami na COVID-19 na RDC. 358 nde bwei. Mpe 12.773.

XS
SM
MD
LG