Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nani abimisaka molongi ya maponami ma mokonzi ya mboka na USA ?


Président Donald Trump, républicain, na vice-président ya kala Joe Biden Bilili bisangisami)
Président Donald Trump, républicain, na vice-président ya kala Joe Biden Bilili bisangisami)

Bato mingi bakanisaka molongi mwa maponami ma mokonzi ya Etats-Unis asakolamaka ntango ba media babimisaka bilembo na bango mpe moto oyo ba media eloba akweyi asalaka lisikulu lya ye, kasi bosolo bozali ete bosakolami bwa molongi bowumelaka ba sanza mingi, bokosalama te kino sanza ya janvier.

Na mokolo mwango, bayi Amerika baponaka nde baponi banene, baponi banene baponaka mokonzi ya mboka, mpe na nsima Congrès esakola molongi.

“Ezali na mokolo mwa maponami moye baponi (banene) baye baponamaka; ezali na mokolo ya sanza ya décembre moye baponi banene bakutanaka mpe baponaka mokonzi ya mboka ; mpe ezali na mokolo na sanza ya yambo moye Congrès endimaka boponami bwango,“ elimboli Amy Dacey, mokambi ya Institut ya Mibeko mpe Politiki na univesrité Américaine.

Bakisa na Collège ya baponi banene, bondimami bwa molongi mwa maponami ya mokonzi mboka esengaka mpe Sénat, ndako ya baponami (bakeli mibeko, députés) mpe ba Archives ya mboka.

Yango boyokani bosalama na mboka, ata na ba tata bakelaki ekolo, baye bandimaki te ete bana mboka baye bapobanka bakoki kobimisa mokambi asengeli.

“Yango esalamaki mpo bondimi bozalaki te été bana mboka bakoki kozwa mokano mosengeli,“ elobi Dacey. “Bandimaki te ete bana ba Amrika basengeli koponama bango moko mokonzi ya mboka mpe vice-président, kasi balingaki mpe te kopesa Congrès bokonzi wana ya kopona. “

COVID-19 ekoki kopekisa botangi

Banganga na boyebi ya maponami balobi ete botangi nkasa ya maponami bokoki kozwa ntango mingi mobu moye likolo na bokono bwa COVID-19 mpe motango ya bato bakopona moye mobakisamami baye bazelami kotinda mikanda na bango kopona na poste.

“Ezali mibeko ya kolanda, “ elobi Lia Merbaki, professeur assistant ya Politiki ya Amerika na Université ya Mississipi. “Ndenge bato basenga ete bilembo bisakolama na butu bwa maponami ekomema wusuwusu mingi mpe mobulu… ntango mosusu, bato mingi bakoki kobanda kofunda ba Etats na bango lokola bazelaki bilembo bisakolama na butu ya maponami. Yango, ekokomisa matata misala mya baye basalaka na na maponami mpe ba Etats lokola bakomeka kosala ete manso masala na pole mpe sembo.“

Nsima na ba Etat tuku mitano banso, bakisa (Wahsington) District of Columbia, bakotanga mikanda mya kopona minso ya baye bakendaki kopona na ba bureaux ya vote, to batindaki na poste, Etat nyonso ekopona na baponi banene na yango. Mokanda mokobima na nkombo ya Certicate of Ascertainment mokotindama na Archiviste ya USA, mokambi y aba Archives nationales.

Bapopni banene bakokutana na binguma mokonzi y aba Etats na bango na ntina ya kopona mokonzi ya mboka mpe vice-président. Yango esengeli esalama lundi ya liboso nsima na mercredi ya mibale ya décembre. Mobu moye, mokolo mwango mozali le 14 décembre.

Baponi banene y aba Etats bakomaka mokanda ya maponami (certificat ya maponami) mpe batindaka yango na Sénat, na ba Archives nationales mpe na bakambi ba Etats na bango. Ntango salami, Collège ya baponi (banene) bakozala lisusu na mosala mosusu te kino maponami ma mokonzi ya mboka mosusu makosalama.

Etapi ya suka ya maponami esalamaka le 6 janvier (2021) ntango Congrès ekutanaka mpo na kotanga mikanda ya maponami mpe kondima nani alongi. Ezalaki milulu kasi basusu bakoki koboya yango. Basusu baboyaki maye Collège ya baponi banene basalaki na 1969 mpe na 2005, kasi ndako ya bakeli mibeko mpe Sénat ebwakisaki koya wana mpe boponami bwango bondimamaki.

Eyebani nanu te soki bilembo ya 2020 bikoboyama, kasi président Donald Trump asi alobaki mbala na mbala ete moyibi mozali kosalama na maponami ya kondina na poste.

M. Dacey akanisi ete mobulu mokoki koya soki molongi ya bato banso alongi te maponami ya Baponi banene, Président Trump alongaki maponami ya baponi banene na 2016 kasi alongaki te boponi ya bato banso boye démocrate Hillary Clinton azali likolo.

Esalamaki mpe na 200, ntango républicain George W. Bush alongaki na Collège ya baponi kai azalaki na nsima mwa moke na maponami ya bato banso epayi wapi décrate Al Gore azalaki liboso.

XS
SM
MD
LG