Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moussa Faki asololi na Tshisekedi mpo kobongisa bokambi na ye ya UA


Moussa Faki Mahamat (G), mokambi ya Commission ya Union africaine, na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa, RDC, 3 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Moussa Faki Mahamat (G), mokambi ya Commission ya Union africaine, na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa, RDC, 3 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Mokambi ya Commission ya Union africaine, Moussa Faki Mahamat akutakaki na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa elongo na lipinga lya basungi na ye na Commission.

"Bokutani bwango bozalaki mpo na kobongisa bokambi ya Union africaine boye président Félix Tshisekedi akozwa na suka ya Assemblée générale ordinaire eye ekosalama na Addis-Abdeda na sanza ya mibale ya 2021," elobi présidence ya RDC na Twitter.

Président Tshisksedi azali sika vice-président ya UA.

Aponamaki na ebonga ya vice-préseint ya UA sanza nzike nsima na bosokalami bwa ye bo’ molongi ya maponami ma le 30 décembre 2018 mpe kokoma mokonzi ya Ekolo Congo démocratique le 20 janvier 2020.

Boponami bwa ye bo' vice-président ya UA bopesi ye nzela ya kokoma président na yango nsima na mibu mibale.

M. Tshisekedi azali bongo komilenge mpo kokamba UA na sanza ya février. Asi atia na esika misala mikosunga ye mpo na yango.

Mercredi, président Emmanuel Macron asololaki na ye na singa mpe alakaki kopesa maboko na bokambi bwa ye ya UA.

Jeudi, Mokambi ya ONU SIDA mpe kalaka mokonzi molandi ya ONU, Wivine Byanyima akutanaki na M. Tshisekedi mpe alobaki ete azali kolikya été Afrika ekozwa na lombango mangwele ya COVID-19 na makasi ya président

XS
SM
MD
LG