Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Sassou abengisi Tshisekedi na "Forum Investir en Afrique" na Brazzaville

Mokonzi Félix Tshisekedi (D) ya Congo démocratique ayambi ministre Jean-Jacques Bouya (C) ya équipement ya terriotoire mpe ya misala ministre yaminene ya Congo-Brrazzaville na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 22 août 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville abengisi mokokani wa ye ya Congo démocratique, Félix Tshisekedi, na Forum "Investir en Afrique" na sanza ya libwa na Brazzaville.

Motindami ya M. Sassou amemelaki M. Tshisekedi nkasa ya bobengami yango o’mokolo ya misato na Cité ya Union africaine, na Kinshasa.

Kolanda présidence ya RDC, ministre ya équipement ya terriotoire mpe ya misala minene ya Congo-Brrazzaville, Jean-Jacques Bouya, nde akomaki mokonda yango na Kinshasa mpe asololaki na M. Tshisekedi.

Forum "Investir en Afrique" ekosalama banda le 10 kino le 12 septembre 2019 na engumba mokonzi ya Congo-Brazzaville.

Chine, Congo-Brazzaville mpe Banque mondiale nde babongisi yango.

XS
SM
MD
LG