Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Muyembe atangami kati na bato 100 baye baleki na mpifo na mokili na 2020


Dr Jean-Jacques Muyembe-Tamfum ya Congo démocratique azwi mbando ya edition ya misato ya Hideyo Noguch Africa na maboko ya Premier ministre ya Japon Shinzo Abe, na Tokyo, Japon, 30 août 2019.
Dr Jean-Jacques Muyembe-Tamfum ya Congo démocratique azwi mbando ya edition ya misato ya Hideyo Noguch Africa na maboko ya Premier ministre ya Japon Shinzo Abe, na Tokyo, Japon, 30 août 2019.

Dr. Jean-Jacques Muyembe atangami kati na bato baleki na mpifo na mokili na mobu 2020, kolanda nkasa ya sango ya Amerika Time.

Azali kati na bato basusu bayebana na mokili mpo na makombo mingi.

Dr. Anthony Fauci, monganga oyo azali kokamba bitumba na COVID19 ye mpe atangami na mokanda mwa mpo etali zebi ya bokolongono. Basusu mpe bazali.

"Dr. Jean-Jacques Muyembe Tamfum azali mwana mboka Congo mpe monganga lokola ngai, nazali na limemya mingi mpo na ye," ekomi na Time Prix Nobel ya Kimya Dr. Denis Mukwege.

Na 2019, mono ya Dr. Muyembe mpo na kobikisa Ebola endimamaki na molongo elongo na nkisi esalamaki na Amerika.


Dr. Muyembe asalaki mono yango na makila ya mono moko abikisaki na Ebola na Kikwit na 1995.

Dr. Mukwege atatoli ete Dr. Muyembe asungaka mokili na koyeba mpo na mbala ya yambo virus ya Ebola na 1976 mpe akoba bitumba byango kino na bokono ya mbala yeye na 2018 kino 2019, biye bimema mbano ya monene mpo bana Congo mpe mokili mobimba.

"Dr. Muyembe alakisa ndakisa na kobundisa bozangi boyebi mpe sango ya lokuta mpo etali mangwelempe. atelamki mpo na techniques ya sika ya kokanga virus esika moko," ebakisi Dr. Muyembe.

Bato basusu mpe bakomi na ba réseaux sociaux maloba ya kokumisa Dr. Mukwege.

Donald Trump, mokonzi ya Amerika, atangami kati na bato baleki mpifo na maye matali poliki. Lokola mpe mbanda wa ye ya démocrate na maponami ma mokonzi ya mboka ma le 3 novembre, vice-président ya kala Joe Biden.

Nancy Pelozzi, mokambi ya Chambres de représentants (Assemblée nationale ya USA), lokola mpe Kamala Harris oyo akozala nkasa moko na Joe Biden bazali mpe.

Président ya Chine Xi Jinping mpe atangami.

XS
SM
MD
LG