Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akozwa maloba na 75e Assemblée générale ya ONU mardi


Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita lya mbala 49 lya mbulamatari na visioconférence na Kinshasa, 18 septembre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita lya mbala 49 lya mbulamatari na visioconférence na Kinshasa, 18 septembre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi azali kati na bakonzi ba bikolo bakozwa maloba mardi kati na 15 heures ya New York (21 heures ya Kinshasa) kino 21 heures ya New York (mercredi 2 heures ya Kinshasa) na 75e Assemblée génAssemblée générale ya Nations unies.

Masikulu mango masi matiamki na bilili mpe makolakisama na bitando bike, kolanda linaka.

75e Assemblée générale ebandaki mardi na New York kasi ezali kosalama na visioconférence mpo na bokono bwa COVID19.

M. Tshisekedi ya RDC azali na lingomba lya bakozni 19 baye masukuli na bango makolakisama wuto nsima na nzanga.

Président Denis Assou N’Guesso ya Congo-Brazzaville nde azwi maloba jeudi 23 septembre 2020.

Bakonzi mpe mbulamatari bya bikolo bazali kolanda yango na visioconference mpo na COVID19.

Na lisukulu na ye, Kalaka mokonzi ya Nations unies Antonio Guterres akepisi bikolo bya molongo na bozongi ya Guerre Froide to boliani minu to matata malandaki bitumba ya molongo ya mibale.

Antonio Guterres alobi yango na botali ezaleli ya bikolo wuto bokono bwa COVID19 bobandaki.

Na ngambu na ye, mokonzi ya Amerika Donald Trump asengi ete Nations unies endimi Chine mokumba ya kozala liziba lya bokono bwa COVID19 boye bopesi mpasi na mokili mobimba.

XS
SM
MD
LG