Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

CENCO esengi mbulamatari na MONUSCO kosilisa bitumba na Beni mpe Minembwe


Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.
Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.

Conférence épiscopale nationale ya Congo (CENCO) esengi ete mbulamatari mpe MONUSCO batiya na esika linaka ya lombango na ntina ya kozongisa kimya mpe kosilisa mpo ya libela bitumba na Beni mpe Minembwe

"Soki eyano ya malonga ezali te, makambo mazali kowumela na engumba mpe na territoire ya Beni mpe na Hauts plateaux ya Minembwe… makoki komema bitumba bikozongela mbala mingi, biye bitopekisa bobongi ya bomoi ya bana ya Congo mpe na mboka bokende liboso," ekomi b’episkopo ya eklezia katoliko na liyebisi.

Nzokande na Beni, bavandi bayike batombokaki, batiyaki moto na Mairie mpe na base civile moko ya MONUSCO nsima na bobobami na bato pene na libwa na ba ADF.

B’episkopo beti mokoloto mpe bayebisi ete bato koleka 80 babomami na batomboki ya mboka ya bapaya uto libandela ya sanza ya zomi na moko.

XS
SM
MD
LG