Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

ONU ekebisi mpo na koyina ba Banyarwanda


Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.
Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.

Monusco (misala ya ONU na Congo démocratique) elobi maloba ya koyina ba Banyarwanda maye mazali koleka na ba media, makoki kondimama te.

"Tomoni bozongi ya maloba ya boyini na ba media mpe na media sociaux likolo ya ba Banyamulenge," esakoli mokambi molandi ya Monusco mpe mokambi ba opérations na yango, François Grignon na bokutani na bapanzi sango.

"Maloba maye makoki kondimama te mpe masengeli kozwa etumbu ya makasi. Totelemeli mabe maye mpe tokosala mosala na mbulamatari mpo ete baye bazali kosala mango bamemama na bazuzi," esengi M. Grignon.

Wuta sanza ya mitano matata mazali kati na kabila ya Hauts-Plateaux, Minembwe, Fizi, na Sud-Kivu. Banyindu, Bafulero mpe kabila misusu bazali kobunda na ba Banyamulenge (Banyamulenge).

Bato bayike bakimi ndako na bango mpe bayike bakufi.

Monusco elobi ete na sanza ya zomi, matata tuku mlibwa masalamaki.

XS
SM
MD
LG