Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Museveni alaki CENCO kosunga kosilisa basimba minduki


Président Yoweri Museveni ya Ouganda na Luanda, Angola, 12 juillet 2019.
Président Yoweri Museveni ya Ouganda na Luanda, Angola, 12 juillet 2019.

Ba episkopo ya RDC bazuwi elaka ya mokonzi Yoweri Museveni ya Ouganda ya kosunga kosilisa mangomba ya basimba manduki na Est ya RDC, elakisi liyebisi ya CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo).

Limpinga ya ba episkopo ekambami na Mgr Marcel Utembi eyembamaki na M. Museveni na bosengi na ye.

Bazalaki na bokutani ya Assemblée plénière ya ba Episkopo ya Afrika mpe Madascar esalamaki na Kampala, engumba mokonzi ya Ouganda.

"Mokambi ya CENCO ayebisiaki na président ya Ouganda mitungisami ya épiscopat ya Congo mpo etali bozali ya batomboki ya mboka bapaya (na Congo démocratique)", kati na bango lingomba ya basimba minduki ya musulamans ya Ouganda ya ADF (Forces démocratiques alliées), elakisi liyebisi.

Na eyeno na ye, "président Museveni alakisaki molende na ye ya kosangisa makasi na bakonzi ya RDC mpo na kopanza mangomba basimba minduki maye mazali mpe likama mpo na mboka na ye", elobi liyebisi yango.

Liyebisi lyango limonisi mpe litomba ya bavandi na bisika yango komikotisa na mosala ya kosukisa basimba minduki.

Kolanda liyebisi yango, Mgr Utembi alobaki ete ba episkopo balingi kopesa maboko, lokola bakambi ya milimo, elongo na biklesia ya mboka inso esimbami na bozangi bokengi na etango ya Grands lacs.

XS
SM
MD
LG