Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour d’Appel eboyi kobisima Kamerhe ata azali na lopitalo


Vital Kamerhe and/et Felix Tshisekedi na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018.
Vital Kamerhe and/et Felix Tshisekedi na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018.

Bazuzi ba Cour d’Appel ya Kinshasa/Gombe baboyi kobimisa Vital Kamerhe, na eyano bapesi na basambe li baye. Ekomi mbaka ya libwa nde tribunal ezali koboya,

Chambre ya conseil ya cour eye epesyi eyano ntango M. Kamerhe azali o’lopitalo wuta mokolo mwa eyenga mpo na kozwa lisalisi.

Ekwayaki maladi na nsima ya nzanga ya dimanche.

"Lobi, bango moko bamemaki ye na lombango nsima na komona ete bokono bokomaki makasi. Biso totika te kosenga bobimisami bwa ye mpo Buku likonzi epesi ndingisa na moto nyonso kobima na boloko mpe kokende kozwa lisalisi," elobi kalaka mokonzi ya lingomba lya M. Kamerhe UNC (Union pour la nation congolaise), Aimé Boji, na VOA Lingala.

Mpo na ye, M. Kamerhe akoki kokima te mpo azali moto monene na mboka mpe azali na mokumba monene.

Bosambisami bwa M. Kmerhe ya kobandela botikamaki na le 18 septembre.

M. Kamerhe akatelamaki etumbu ya mibu 20 mya misala makasi bakisa na mibu 10 mya bopimi makoki ma poilitiki mpo na kopenwisa misolo mya kotonga ndako na ntima ya mikolo 100 ya président Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG