Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe akoti lopitalo


Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.
Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.

Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, oyo azali na etumbu ya mibu 20 ya misala makasi bakisa zomi ya bopimeli makoki ma politiki, na boloko ya Makala, azali na lopitalo nsima na kokweya maladi o'mokolo mwa eyenga.

Lingomba lya M. Kamerhe, UNC (Union pour la nation congolaise) esakoli na liyebisi ete azali kotalama na minganga.

"Tosololi kala te na minganga baye bazali kosalisa ye mpe tolingi toyebisa bato… ete bokolongono bwa ye bozali 'stable' kasi esengeli alandelama malamu mpe na bowumeli," ekomi na liyebisi kalaka mokonzi ya UNC, Aimé Boji Sangara.

Yambo na yango moko na basungi ba M. Kamerhe asakolaki botindami nwa ye na lopitalo.

"Honorable Vital Kamerhe atindami na lopitalo moko ya mboka!!! Lelo, président Vital Kamerhe ayokaki nzoto malamu te, na suka ya nsima ya nzanga, bokolongo bwa bobebaki. Bakonzi ba lingomba bazali kolandela na bokebi oyo etali bokolongono bwa ye. Motemama moko na losambo," ekomaki na Twitter Michel Moto, moko na basungi ba M. Kamerhe.

Basambeli ba M. Kamerhe bazali kokoba kosenga bobimisami bwa ye mpe balobi nzoto na ye ezali malamu te.

Ba zuzi baboya mbala mitano kobimisa ye.

Bosambisa bwa M. Kamerhe ya kozongela na bosenga na ye, esengelaki ebandelama. Kasi bazuzi bazali kotindika yango.

Etiami le 18 septembre.

M. Kamerha akatelama etumbu elongo na Sammih Jamal, mokokonzi ya société SAMIBO, na Jeannot Muhima ya présidence, mpo na kopengwisa misolo mya botongi ndako mpo na mikolo nkama mya président Tshisekedi.

UNC eboyi kotambola le 28 aout lokola ebongisaki.

XS
SM
MD
LG